Maria wa Nazaleti
Maria wa Nazaleti (Lialame מרים Mariam) azalakí mamá wa Yézu-Klísto.
Nkómbó Maria eútí na ligresi Μαριαμ, mpé na liyuda Myriam מרים, azalí elɛngɛ́ mwǎsí wa mbóka Judee, azalí mpé mamá wa Yésu wa Nazareti. Ekelézya ya bamumpɛ́ mpé ya ba-orthodoxe ipésaka yě esíká ya lokúmu, mpé imóbêngí Ngɔndɔ Maria (míngi mpenzá epái ya bamumpé) mpé Mama wa Nzambe (míngi mpenzá epái ya *ba-orthodoxe), mpé yě apésɛ́mí esíká ya lokúmu lonɛ́nɛ mpénza.
Libota
kokomaMamá ya Maria azalakí Santu Anna, tatá azalakí Santu Yoakima.[1] Bána ya Maria bazalakí: Yézu, Yakobus, Yoses, Yudas mpé Simon.[2] Eklezya Katolike elobí: bazalakí bandɛko (cousins) ya Yézu; bamissioni balobí: bazalakí bandɛko (frères) ya Yézu.
Maria na boyókani bwa sika
kokomaMikanda mya Matayo mpé ya Luka mipɛsi lisoló lya lisákólá lya mwanzɛ *Gabriel, ntángo mwanzɛ Gabriel apɛ́sɛki Maria mpé nsima Yosefu óyo alakáká libála na Maria lisákólá lya bokangemi bwa zémi ya Yésu na bozángi bosangisi nzóto na mobáli. Makomi ma Luka mazalí kopɛ́sɛ esíká enɛnɛ na Maria ntángo makomi ma Matayo mapɛsi esíká enɛnɛ na Maria tɛ́.
Makomi mazalí nsima koloba bolakisi bwa Yésu na Tɛmpɛlɔ́ kolandaka bonkɔ́kɔ bwa bangó buye busengi 'te mwǎna wa libosó nyonsɔ wa mobáli na libóta akosɛ́ngɛlɛ kosómbama. Simoni akotatola minyɔ́kɔ miye Maria akoyóka,[3] nsima epɛsi lisapo lya bobúngi bwa Yésu o mibú zómi na míbalé ntángo bangó bamatáká bomati bwa mobú na mobú o tɛmpɛlɔ́ ya Yerusalemi:[4] ezaláká babóti ba yě o nzelá ya bozóngi mbóka Nazaleti, mwǎna Yésu akotikala na tɛmpɛlɔ́ mpó na *kodiscuter na banganga ba mibeko.
Na bondimi bwa sika, Maria akobima lisúsu ntángo Yésu akokɛndɛ limpáti linɛnɛ lya libála epái wápi akobóngola mái na víno, mpé lisúsu mbala eye Maria azaláká komoluka ntángo yě azalaka kotéya,[5] mpé ya nsúka ntángo Yésu abákamáká o ekulúzu. Mwǎna wa yě Yésu akotíka yě o mabɔ́kɔ ma moyékoli óyo yě alingaka míngi na nkómbó ya Yoane.
«Yesu, amɔni mamá wa yě mpé mpɛmbɛ́ni wa yě moyékoli óye yě alingaka míngi mpenzá , alobi na mamá wa yě: Mwǎsí, tála mwǎna wa yɔ̌. Mpé nsima akoloba na moyékoli wa yě: Tála mamá wa yɔ̌. Mpé, bandá ntángo êná, Yoani akokamata Maria o ndáko wa yě mpé bakokóma kofánda elɔngɔ́.»[6]
Yě azaláká na bayékoli mokɔlɔ mwa pantekote.[7]
Ndimbola ya nsima ya boyókani bwa sika ekotála kokoba ya bomɔi bwa yě mpé liwâ lya yě na Éphèse.
Bongɔndɔ bwa sékô sékô ya Maria
kokomaKokanga zémi na bozángi bosangisi nzóto na mobáli (Loléngé luye zémi ya Yésu ekɔtɔ́kɔ́ mpé yě abótamáká ntángo Maria azaláká ngɔndɔ) endimama na baklisto bansɔ mpó 'te ekomamá na mikanda mya boyókani bwa sika; kasi ezali bôngó tɛ́ na bongɔndɔ bwa sékô sékô bwa Maria (Loléngé la kotíkala ngɔndɔ bomɔi bwa yě mobimba) endimami na bwányá bwa bonzámbi bwa ekelezia ya bamumpɛ́ mpé ya eyamba ya *baorthodoxe kasi ebóyamá na bwányá bwa bonzámbi bwa eyamba ya bamisioni. Boyambi buye buzali mpenzá ya kala, engɛ́bɛ́nɛ́ na *Protévangile ya Jacques; makomi ma mibeko mya ekelézia ya bamumpɛ́ tɛ́ o bonkámá II esíká nini elakisami 'te Maria, mwǎna mwǎsi wa Anne mpé Joachim akabamáká lokóla likabo na Nkóló (eye elingi koloba kotíkala ngɔndɔ bomɔi bwa yě mobimba) na mokáno (voeu) mwa mamá wa yě, mpé nsima apɛ́sɛmɛ́kɛ́ na Yosefu yambo ya kokanga zémi ya Yésu.
Bamisíoni baboyaka boyambi bwa bongɔndɔ bwa sékô sékô ya Maria na kotombolaka makomi ma boyókani bwa sika maye mazali koloba na ntina ya bandeko ba Yésu ba mibali mpé ba bǎsí. Minei bakomami na Matayo 13,55 mpé na Malako 6,3
«Óyo azalí mwǎna ya mokabínda tɛ́? mamá wa yě ndé Maria? *Jacques, Yosefu, Simoni mpé *Jude, bazalí bandeko ba yě tɛ́?»[8] «Óyo mokabínda tɛ́, mwǎna wa Maria, mpé ndeko ya *Jacques, ya Yose, ya *Jude mpé Simoni? mpé bandeko ba yě ba bǎsí bazalí tɛ́ na kati kati na biso? Mpé ye azaláká mpó na bangó libaku.»[9]
Mokanda mwa Matayo, na mokapo mwa 12 molobi 'te Maria mamá wa Yésu mpé bandeko ba yě bazaláká libándá. Balingáká komɔnɔ Yésu ntángo yě azaláká ontei ya ndáko. Ntángo moto mɔ̌kɔ́ alobi: Tála, mamá mpé bandeko ba yɔ̌ bazalí libándá mpé bazali koluka kosolola na yɔ̌."[10]
Ezalí ndé bonkókó bwa *baorthodoce, engɛ́bɛ́nɛ́ na *Protévangile ya Jacques, ndeko wa Yésu ya mobali óyo bakaboli na yě tatá mɔ̌kɔ́ (mobóti mpé mobɔ́kɔli, mobóti mpó na Jacques kasi mobɔ́kɔli mpó na Yésu) (Yosefu) kasi bamamá bakɛsɛnɛ, mwǎna óyo abótami na libála lya yambo ya Yosefu óyo akufeláká mwǎsí mpé abáláká Maria ngɔndɔ óyo abonzelamáká na Nkóló tǒ lisúsu, engɛ́bɛ́nɛ́ na bonkókó bwa bamumpɛ́ mpé bwa *baorthodoxe, bandeko ba Yésu baye babótami na libóta lya tatá (batatá-mwǎsí, batatá-nkulútu, batatá-lɛki) tó ya mamá wa yě (banɔ́kɔ́, bamamá-lɛki, bamamá-kulútu) baye babêngi na lifalansé cousins. Na lingála mpé na nkóta isúsu lokóla nkóta ya *slaves bǎna bansɔ babótami na ngámbo na ngámbo ya libóta bamibêngamaka bangó na bangó ndeko, mpé na mangómbá ma kalakala ntángo bangó banso bazaláká kofánda elɔngɔ́, bǎna baye babótami na ngámbo ya tatá tǒ ya mamá bazaláká komibêngana na bǎna baye babótami na tatá tǒ mamá ndeko mpé bazalí bo bandeko. Makomi ma boyókani bwa sika malongobanáká sé na ezaleli ya *orient ya mikɔlɔ na mikɔlɔ. Míbalé o kati na bangó, bakomami na bibiliya lokóla bǎna ba "Maria, mamá wa *Jacques le mineur mpé ya Yose" na Matayo 27,56 mpé Malako 15,40 etalisi Maria, mwǎsí ya *clopas engɛ́bɛ́nɛ́ na mokanda mwa Yoane 19,25, ya misato *Juse amibengi ndeko ya *Jacques kasi ya Yésu tɛ́. (Jude 1), ya mínei Simoni alakisami na pólélé lokóla mwǎna abótami na ndeko ya tatá mɔ̌kɔ́ na tatá mobɔ́kɔli wa yě , mwǎna ya Clopas ndeko wa Yosefu, na lisoló lya ekelézya ya Eusebe ya Cesaree
Na likambo liye basángó ba lingómbá lya bandeko ba Yésu, frères de Jésus, Tála atikele *Proches de Jésus
Bibiliya epɛsi eyano na mokanda mwa Luka. Ntángo mwanzɛ́ asakoláká koyaa ya bokangemi bwa zémi ya Yésu, Ngɔndɔ Maria ayanoláká: "ndéngé níni yango ekosálama mpamba 'te ngai nayébi mobali tɛ́ ?", eyano ya nkamwa mpámba te likonga lisiláká kopikama mpó na libála lya yě mpé kala míngi tɛ́ akobálana na miso ma bato bansɔ na Yosefu. Sɔ́kí Maria akanisáká kofánda na bosangisaka nzóto na Yosefu nsima ya libála, yě alingáká komɔnɔ lisákólá lya mwanzɛ nkamwa tɛ́ (akokóma na zémi). Lisákólá liye "nayébi mobali tɛ́" ezalí limbola lya botósi koúta na ligresi liye lilingi koloba "Nasangisa nzóto na mobali tɛ́"
Toma ya Aquin, mokomi wa *référence ya ekelézya ya bamumpɛ́, akoyekola likambo liye na loléngé la bozindo mpé ya mayɛlɛ (*méthodique) mpenzá o (sa Somme Théologique), IIIa pars, Q. 28, art. 2 à 4: atikele ya 2: Bongɔndɔ ntángo ya bobóti, atikele ya 3: Bongɔndɔ nsima ya bobóti, atikele ya 4: Likambo lya kolapa ndáí mpó na bongɔndɔ (Liye lizalí likambo likɛ́sɛni mpé lya nsɔ́mí na liye lya libosó (*précédente)). Toma ya Aquin asúkisi 'te Maria azalí ngɔndɔ wa sékô sékô mpé na bolapi ndáí ya bongɔndɔ.
Mosantú Ogistini azalí kotánga makomi mpó na likambo liye lya bongɔndɔ bwa sékô sékô ya Maria: «Azóngisi ngáí na ekuke ya libándá ya ekelézya, na ngámbo ya monyɛlɛ. Kasi ezaláki ya kokangama. 2. Mpé Yawhe andobeli: Ekuki eye ekokangama, mpé ekofungwama sɔ́kɔ mokɛ́ tɛ́ mpé moto atâ mɔ̌kɔ́ tɛ́ akokɔtɔ, mpámba tɛ́, Nzámbe ya Israel akotɔ́kɔ́ wâna. Ekotíkala ya kokanga.»[11]
Eteni esúsu ya mokapo mwa bibiliya na Likambo liye:
"Tála eye elobi Monsantú, Ya solo, eye apɛ́sɛmi fungola ya Dawidi, eye efungolaka, mpé moto mɔ̌kɔ́ te akoki kokanga mpé ekangaka mpé moto mɔ̌kɔ́ tɛ́ akofungola.[12]
Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ. |
Tálá mpé
kokomaMasámbo
kokoma- Maria Losáko (Ave Maria)
- Mamá wa Bikólo bínsɔ
Nzémbo
kokomaTálá: Nzémbo ya Maria (lístɛ)
Ndáko-Nzámbe ya Maria
kokomaNdáko-Nzámbo ya Maria ya Eklezya Katolike:
- Bóma (Notre-Dame de l’Assomption)
- Bukavu (Maria ya bobɔ́to)
- Chartres (Falansia)
- Einsiedeln (Swisi)
- Isangi (Marie Médiatrice)
- Kisangani (Notre Dame du Rosaire)
- Lingwala (Maria ya Kongó)
- Lourdes (Falansia)
Búku
kokoma- (fr) Cardinal Carlo Maria Martini, s.j.: Marie souffre encore. Saint-Paul, 1998.
- (fr) Edward Schillebeeckx, o.p.: Marie, mère de la Rédemption. Paris: Cerf, 1963.
- (fr) Roger Wawa, ssp: 10 Neuvaines pour toutes les nécessités. Limete: Médiaspaul, 2003. ISBN 2-7414-0175-6